Matthew 2

Bato ya mayele baye kotala Yesu

1Yesu abotamaki na Betelemi ya Yudea, tango Erode azalaki mokonzi ; sima na yango, bato ya mayele oyo bayekolaka minzoto, bawutaki na mokili ya Este, bakomaki na Yeruzalem. 2Batunaki :

—Mokonzi ya Bayuda oyo awuti kobotama azali wapi ? Pamba te, tomonaki monzoto na ye na mokili ya Este, yango wana toye kokumbamela ye !

3Tango mokonzi Erode ayokaki sango yango, ye na bato nyonso ya Yeruzalem bamitungisaki mingi. 4Abengisaki bakonzi nyonso ya banganga-Nzambe mpe balakisi ya Mibeko, mpe atunaki bango soki Kristo asengeli kobotama wapi.

5Bazongiselaki ye :

—Na Betelemi ya Yudea, pamba te moprofeta akomaki boye :

6 E e yo Betelemi, kati na mokili ya Yudea,
ozali moke te kati ya bakonzi ya Yudea,
pamba te, Mokonzi akobima epai na yo,
oyo akozala mobateli ya
bato na ngai Isayele !

7Bongo Erode abengisaki na sekele bato ya mayele oyo batalaka minzoto mpe atunaki bango bayebisa ye tango penza oyo monzoto ebimaki. 8Atindaki bango na Betelemi na maloba oyo :

—Bokende kuna mpe botuna malamu makambo ya mwana wana. Tango bokomona ye, boyebisa ngai, mpo ngai mpe nakende kokumbamela ye !

9Sima ya koyoka maloba ya mokonzi, bakendaki. Mpe monzoto oyo bamonaki na Este ezalaki kokende liboso na bango kino tango etelemaki likolo ya esika mwana azalaki. 10Tango bamonaki monzoto, bayokaki esengo mingi penza. 11Bakotaki na ndako, bamonaki mwana na mama na ye Mariya ; bafukamaki mpe bakumbamelaki ye. Bongo bafungolaki basaki na bango, mpe bapesaki ye makabo oyo : wolo, ansa
Ansa  : Mayi ya nzete ya mokili ya Arabia oyo bazalaki kotumba mpo ebimisa solo kitoko.
mpe mafuta ya solo kitoko.

12Awa Nzambe akebisaki bango na ndoto, ete bazonga te epai ya Erode, bazongaki na mokili na bango na nzela mosusu.

Bakimisi Yesu na Ezipito

13Tango bakendaki, anzelu ya Nkolo abimelaki Zozefi na ndoto mpe alobaki na ye :

—Telema, kamata mwana na mama na ye, mpe kina na Ezipito. Vanda kuna kino tango nakoyebisa yo pamba te Erode akoluka mwana, mpo na koboma ye.
14Kaka na butu wana, Zozefi atelemaki, akamataki mwana na mama na ye, mpe akendaki na Ezipito. 15Avandaki kuna kino tango Erode akufaki. Na bongo nde maloba ya Nkolo, oyo alobaki na monoko ya moprofeta ekokisamaki : Nabengaki mwana na ngai abima na Ezipito.

16Tango Erode amonaki ete bato ya mayele oyo batalaka minzoto batosaki ye te, atondaki na kanda. Yango wana atindaki ete baboma, na Betelemi mpe na bamboka ya pembeni-pembeni na yango, bana nyonso ya mibali oyo bazalaki na bambula mibale kino na nse ; pamba te alandaki malamu penza tango oyo bato ya mayele baoyo batalaka minzoto bayebisaki ye.

17Na ndenge wana nde, maloba ya moprofeta Jeremiya ekokisamaki :
18 Mongongo eyokani na Rama ;
kolela mpe mawa monene.
Ezali Rashele, azali kolela bana na ye ;
aboyi bakitisa ye motema,
pamba te bana na ye bakufi.

19Sima ya liwa ya Erode, anzelu ya Nkolo abimelaki Zozefi na ndoto na Ezipito, 20mpe alobaki na ye :

—Telema, kamata mwana na mama na ye mpe zonga na mokili ya Isayele, pamba te baoyo bazalaki koluka koboma mwana basiʼbakufi.

21Zozefi atelemaki, akamataki mwana na mama na ye, mpe azongaki na mokili ya Isayele. 22Kasi tango ayokaki ete Arkelawusi akomaki mokonzi ya Yudea na esika ya tata na ye Erode, abangaki kokende kuna. Awa bakebisaki ye na ndoto, akendaki kovanda na ekolo ya Galileya, 23kuna afandaki na vile ya Nazareti. Na bongo nde maloba ya baprofeta ekokisamaki : Bakobenga ye moto ya Nazareti.
Copyright information for LinMNB